Psalms 131

Kimia ya solo

Nzembo ya David ; nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Motema na ngai ezali na lofundu te, Yawe,
miso na ngai ezali na lolendo te.
Nakanisaka te makambo oyo eleki minene ;
to biloko oyo ezali makamwisi mingi mpo na ngai.

2 Kasi napesaki kimia na molimo na ngai
mpe navandisaki yango nyee ;
lokola mwana balongola na mabele
mpe azali elongo na mama na ye ;
molimo na ngai ezali kati na ngai lokola
mwana balongola na mabele.

3 Ee Isayele, tia elikya na yo na Yawe,
wuta sikʼoyo mpe libela na libela.
Copyright information for LinMNB